Mituna Batunaka Mbala Na Mbala Mpo Na Kozwa Ndako

Mituna Batunaka Mbala Na Mbala Mpo Na Kozwa Ndako

Mpo na bandako oyo ezali na Maine, bandimaka banyawu soki osimbisi $100. Bandako ya mibange/bibosono endimaka mpe mbwa 1 ya moke (na mwa bipekiseli) soki osimbisi $100. Esengaka te kosimbisa mbongo mpo na banyama oyo esungaka.

Mpo na bandako oyo ezali na New Hampshire, malako ezali ndenge moko, kasi esengaka te kosimbisa mbongo mpo na banyama.

Ba bon ya bandako ekoki kosalelama na ba apartema nyonso oyo eza te subventionné soki mbongo ya kofutela ndako ezalaka na kati ya mbongo bafutaka. Mpo na basengi oyo bazwaka lisungi ya général, ekosenga kozala na garant (neti moto oyo atye mpe sinyatire). Soki ozali nanu te na bon ya ndako, okoki kosolola na mokonzi ya bandako ya esika ofandaka.

Soki akoti na apartema moko ya Avesta, ondimi kofutela ndako basanza 12.

Basengi basengeli kokokisa mbula basengaka ntango oyo bazali kosala bosengi. Bandako mosusu eza mpo na bato oyo bakokisi masengami ya mbula TO bazali na ebosono; misusu esengaka kaka mbula. Bakolobela yango na piblisite ya ndako yango.

Mpo topesaka bato nyonso mabaku ya ndenge moko na makambo ya kozwa ndako, ekozala malamu te soki tobengi bato mosusu mpo na koyebisa bango bisika oyo ezali disponible. Tozolendisa bino na kotalaka site internet na biso mbala na mbala mpo na komona ba apartema oyo ezali mpamba.

Bandako ya Avesta esalelaka malako esalisaka bato nyonso na kozwa bandako. Elakisi ete topesaka ba apartema oyo ezali mpamba na libota ya liboso oyo ekokisi masengami. Soki ezali te na liste ya kozela na ntango oyo apartema moko ekomi disponible, tokosala piblisite na yango na site internet mpo bato nyonso basala bosengi.

Ndenge ya kosalela bisaleli na biso ya bolukiluki/site internet/application

Ndako nyonso ya disponible oyo basali piblisite na site internet na biso, ekolakisa masengami ya salere mpo ndako yango. Mpo na bandako mosusu batyaka salere ya mingi oyo basengaka, mpe misusu ezalaka na basalere oyo basengaka.

Soki okokisi te masengami ya basalere oyo basengaka to salere ya moko oyo basengaka kasi ozali na bon ya ndako, okoki kokokisa masengami.

Soki ozali na konti na Avesta na nzeal ya RentCafe, fina ‘Komisa Nkombo’, na nsima koma nkombo mpe adresi email na yo. RentCafe ekoyeba ete ozali na konti mpe ekosenga yo na kokoma mot de passe.

Soki apartema moko etikali mpamba mpe tosilisi bato oyo bazali na liste na biso ya kozela, tokotya apartema wana ya mpamba na site internet na biso mpe tokondima bosengi ya sika.

Bandako nyonso oyo ezali na bisika ya mpamba mpe/to kondima kokomisa bankombo na liste ya kozela ezalaka na site internet na biso. Fina na ‘Luka Apartema’ mpo na komona yango.

Bosengi mpe kolandela bosengi

Mpo na ba apartema na biso mingi, malako ya programe oyo totosaka esengaka ete to verifier basalere mpi bozwi nyonso.

Bosengi mpe kolandela bosengi

“Avesta epesaka te bandako na urgence. Soki oza na mposa ya ndako na urgence, okoki kobenga:

Maine: MaineHousing – (207) 624-5723

New Hampshire: Programe ya Bandako ya Urgence ya Baninga – (603) 228-1462 “

Te. Baliste ya kozela ezali kaka mpo na bandako ya sikisiki to bisika ya kofanda ya sikisiki. Ata soki ozali na liste ya kozela, tozolendisa yo na kotalaka mbala na mbala bisika oyo ezali disponible.

Toyebi ete ekoki kozala mpasi na kozwa ndako, mpe tozali kolinga kozala na ba apartema ebele ya disponible mpo na kokokisa bamposa ya bato na biso. Totosaka malako nyonso ya kopesa bato nyonso bandako mpe tolandelaka bosengi na molongo oyo tozwaka yango.

Mpo baliste ya kozela ezali kaka mpo na bandako ya sikisiki to bisika ya kofanda ya sikisiki, ata soki ozali na liste ya kozela, tozolendisa yo na kotalaka mbala na mbala mpo na koyeba bisika oyo ezali disponible. 

Bandako ya Avesta esalelaka malako esalisaka bato nyonso na kozwa bandako. Elakisi ete topesaka ba apartema oyo ezali mpamba na libota ya liboso oyo ekokisi masengami.